1. Accueil ( Ebandeli )
  2. Ba katégoris
  3. The Creed

Maloba/Hadîth “Ya solo Allah atalaka te na bilongi pe na bozwi na bino, kasi (Allah) azalaka nde kotala na mitema pe na misala na bino

عن أبي هريرة رضي الله عنه قال: قال رسول الله صلى الله عليه وسلم:
«إِنَّ اللهَ لَا يَنْظُرُ إِلَى صُوَرِكُمْ وَأَمْوَالِكُمْ، وَلَكِنْ يَنْظُرُ إِلَى قُلُوبِكُمْ وَأَعْمَالِكُمْ».

Abu Hurairah (Allah asepela naye) alobi: Motindami ya Allah (kimia ezala likolo naye) alobaki:
“Ya solo Allah atalaka te na bilongi pe na bozwi na bino, kasi (Allah) azalaka nde kotala na mitema pe na misala na bino".

صحيح رواه مسلم صحيح مسلم - 2564

Ndimbola

Ntoma Muhammad (kimia ezala naye) azali kolimbola na koloba ete: ya solo Allah Nkolo ya Nkembo, azalaka te kotala na bilongi pe na banzoto ya basali naye, ete ezali kitoko to ezali mabe? tope ezali monene to ezali moke? (atalaka pe te soki) ezali ya bokolongono to ezali ya kobela? Azalaka pe kotala te na bozwi na bango, ete boye ezala mingi to moke? Na Allah Nkolo ya Nkembo, azalaka te kozwa to kotangela basali naye na makambo ya mokili oyo tope pona bokeseni na bango kati na yango, kasi Allah - Nkolo ya Lokumu - azalaka nde kotala na mitema na bango pe na maye oyo ezwami kati na yango, kowuta na bobangi pe bonsomi, bosolo mpe bosembo (bomoko ya Allah), tope na mikano ya mabe (oyo ekotaka na mitema) na boluki komilakisa, pe koyokisa. Mpe (Ye Allah) azalaka kotala na misala na bango na ndenge ya bosembo na yango pe na bobebisi na yango; mpe Azalaka kofuta lifuti pe bolamu pona yango to kofuta likolo na yango.

Moko ya matomba ya hadîth

  1. Kozala na bokebi ya kobongisa motema mpe kopetola yango uta na ndimbola nyonso ya kopamela.
  2. Bosembo ya motema ewuti na mokano malamu, mpe bosembo ya misala ezali kolanda ntoma (s.a.w) kimia mpe mapamboli ezala likolo na ye, na yango ezali esika ya kotalela mpe kokanisa na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.
  3. Mutu asengeli te azala kokosama likolo ya bozui naye, to kitoko naye, ou bien nzoto na ye, to na eloko moko oyo ezo monana na mokili oyo.
  4. Likebisi na kosala lolendo na makambo ya libanda, na bozangi kobongisa makambo ya kati.

Kolakisa makomi ya mabongoli

67 Lokota (munoko)
EN English الإنجليزية
UR اردو الأوردية
ES Español الإسبانية
ID Indonesia الإندونيسية
UG ئۇيغۇرچە الأيغورية
BN বাংলা البنغالية
TR Türkçe التركية
RU Русский الروسية
BS Bosanski البوسنية
SI සිංහල السنهالية
HI हिन्दी الهندية
ZH 中文 الصينية
FA فارسی الفارسية
VI Tiếng Việt الفيتنامية
TL Tagalog تجالوج
KU Kurdî الكردية
HA Hausa الهوسا
PT Português البرتغالية
ML മലയാളം المليالم
TE తెలుగు التلغو
SW Kiswahili السواحيلية
TA தமிழ் التاميلية
MY မြန်မာ البورمية
TH ไทย التايلندية
DE Deutsch الألمانية
JA 日本語 اليابانية
PS پښتو بشتو
AS অসমীয়া الأسامية
SQ Shqip الألبانية
SV Svenska السويدية
AM አማርኛ الأمهرية
NL Nederlands الهولندية
GU ગુજરાતી الغوجاراتية
KY Кыргызча القيرقيزية
NE नेपाली النيبالية
YO Yorùbá اليوروبا
LT Lietuvių الليتوانية
PRS دری الدرية
SR Српски الصربية
SO Soomaali الصومالية
TG тоҷикӣ الطاجيكية
RW Kinyarwanda الكينياروندا
RO Română الرومانية
HU Magyar المجرية
CS Čeština التشيكية
MOS Moore الموري
MG Malagasy المالاجاشية
FF Fulfulde الفولانية
IT Italiano الإيطالية
OM Oromoo الأورومو
KN ಕನ್ನಡ الكانادا
WO Wolof الولوف
BG Български البلغارية
AZ Azərbaycan الأذربيجانية
EL Ελληνικά اليونانية
AK Akan الأكانية
UZ O‘zbek الأوزبكية
UK Українська الأوكرانية
KA ქართული الجورجية
MK Македонски المقدونية
KM ភាសាខ្មែរ الخميرية
BM Bambara البامبارية
PA ਪੰਜਾਬੀ البنجابية
MR मराठी الماراثية
RN Kirundi الكيروندي
YAO Yao الياو
KMR Kurmancî الكرمنجية