The Creed

56Molongo ya ba hadith 9Ba sous-Katégoris

Molongo ya ba hadith 56

“Ee Nzambe, kosala lilita na ngai ezala ekeko te
Nazali riche koleka ba partenaires ya bosangisi, na oyo asali mosala asangisi ngai, nakotikaye na bosangisi naye
ngai namitie pene ya nzambe koleka kozala pene ya moko na bino, mpe Yasolo nzambe asili kotia ngai pene naye Ndenge atia Abraham camarade naye
“Moto oyo alapi ndai na nkombo mosusu oyo ezali ya nzambe te, andimi te to asali banzambe mingi.”
Ya solo, okokomela peuple oyo bazali Bato ya Buku, Na yango tango okoya epayi na bango, benga bango mpo na ba témoigner que nzambe mosusu azali te kaka Allah, pe Muhammad azali Messanger ya Nzambe
“Bótalela ngai te ndenge baklisto batalelaki mwana ya Maria; Mpo nazali kaka mosaleli ya nzambe, yango wana balobaki: Mosaleli ya Nzambe mpe Motindami na Ye.”
Bato oyo bakosepela mingi na libondeli na ngai na Mokolo ya Lisekwa, oyo alobi ete nzambe mosusu azali te bobele Allah ye Moko, na bosembo uta na motema to na molimo na ye.”
“Moto oyo akutani na Nzambe na asangisaki Ye na eloko moko te, ako kota na Paradis, Mpe moto nyonso oyo akokutana na ye mpe asangisaki ye na eloko, akokota na Lifelo.”
“Baoyo bazali kolobaloba, basili kobungisa
Na oyo akotikela moto ya nyongo ngonga na tango azangi makoki, tope atikeli ye nyongo wana; na mokolo ya Suka, Allah akozipa ye na se ya elili ya Kiti ya Bokonzi na Ye, Mokolo oyo elili mokote ekozala obele se elili na Ye
“Na moto oyo Allah Alingi bolamu pona ye, Akomeka ye
Ya solo, Nzambe akomaka misala malamu na misala ya mabe. Na sima alimbolaki ete, boye oyo azali na mokano ya kosala mosala malamu mpe asali yango te, Nzambe akomaka yango mpo na ye lokola mosala malamu mobimba, kasi soki akani kosala yango mpe asali yango, Nzambe akomaka yango mpo na ye. Azali na misala zomi ya malamu elongo na Ye, kino mbala nkama nsambo, kino mbala mingi, mpe moto nyonso oyo akani mosala mabe mpe asali yango te, Nzambe akomaka yango mpo na ye mabe te, kasi akofutama, Na soki akani kosala mabe mpe asali yango, Nzambe akomaka yango lokola likambo moko ya mabe mpo na ye”
“Ya solo Allah atalaka te na bilongi pe na bozwi na bino, kasi (Allah) azalaka nde kotala na mitema pe na misala na bino
Islam ezali kotatola nzambe mosusu azali te kaka Allah, mpe Muhammad azali Ntoma ya Nzambe, mpe kotia losambo, kofuta zakat, na kokanga carême ya Ramadan, mpe kosala Hijja na maka pona mutu oyo akoki na yango
O basali na ngai, napekisi injustice mpo na Ngai, mpe napekisi yango kati na bino, yango wana bonyokolana te
O mwana mobali, nazali kotangisa yo maloba, Bomba nzambe, nzambe akobomba yo, Batela Nzambe, okokuta Ye liboso na yo, Soki osengi, bongo senga Nzambe, mpe soki ozali koluka lisalisi, luká lisalisi epai ya Nzambe
“Bato - ya ngonga - na ngai nyonso bako kota na Paradizo longola se oyo aboyi
“Moto oyo akomekola (imité) ekólo moko azali moko na bango”
“Epesameli nzela te moto asundola ndeko na ye mikolo koleka misato, Bakutani, na oyo alakisi ye, oyo alakisi, ye, na oyo eleki malamu kati na bango mibale ezali oyo akobanda na Salamu”
“Moto nyonso oyo akosala mabe, Nzambe akosala ye mabe, mpe moto nyonso oyo azali makasi, Nzambe akozala mpasi mpo na ye”
‌ Oyo kati na bino akomona mabe, azala kobongola (kopekisa) yango na maboko naye, soki akokoka - kopekisa yango na maboko na ye - te, apekisa yango na maloba naye, mpe soki akokoka te, ayina yango na motema naye, wana nde ezali moke ya bondimi
mutu oyo akobongisa na Islam akozwa mokumba te! pona oyo elekaki, na mutu oyo akosala mabe na Islam, akozuwa ya liboso na ya suka”
Omoni ndenge nini soki nasambeli losambo ya obligatoire, mpe nakangi Ramadan, nasali makambo ya halali, mpe natiki haramu
Bopeto ezali eteni ya bondima, na Al hamdoulillahi etondisaka balance, mpe Subhâna l-lâhi Wa Al hamdoulillah etondaka - to etondisaka - oyo ezali kati kati ya mapata na mabele
“Est-ce que ekoki kosalema hadith na ngayi ekomeli mutu, ntango oyo ye avandi na trône naye? alobaki lisusu : Kati na biso na bino ezali na Buku ya Nzambe
yasolo droit ya nzambe ezali, basambelaye basangisa ye na eloko moko te, mpe droit ya basali naye ezali apesa bango etumbu te, na Mutu oyo asangisakiye te
Mutu oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko te, akokota na Paradis, na oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko, akokota na Lifelo”
“Nzambe akobimisa polele mutu moko na ekólo na ngayi lokola mokonzi ya bozalisi na Mokolo ya Lisekwa
“Ntango Nzambe akelaki Lola mpe Lifelo, atindaki Gabriel, kimia ezala likolo na ye
“Nzambe akomaki mibeko ya bozalisi mibu nkóto ntuku mitano (50.000)
Ezali na litomba te mpo na ye, alobaki ata mokolo Moko te Nkolo na ngai, limbisa ngai masumu na ngai na Mokolo ya nsuka”
boyebi oyo Nkolo na bino alobi?” Balobaki: Nzambe na Ntoma na Ye bayebi malamu koleka. Alobaki boye: “Kati na basaleli na Ngai ezali na mondimi epai na Ngai mpe mozangi kondima
Tomonaka kati na biso moko makambo oyo moko na moko kati na biso amonaka mpasi mingi mpo na koloba. Alobaki boye: “bokutaka yengo?” Balobaki: oui Alobaki: “Wana ezali bondimi ya polele”
matondo na Nzambe oyo azongisaki mayele mabe na ye na mongongo ya nse”
“Satana akoyelaka moko na bino mpe alobi ete: Nani akelaki boye mpe boye? Nani akelaki boye na boye? Kino akoloba: Nani akela Nkolo na yo? Na yango, ntango akokóma na esika yango, tiká aluka ekimelo epai ya Nzambe mpe azala na motema yako silisa ye”
Nzambe asalaka mondimi mabe te na mosala ya malamu, mpo na yango akopesama na mokili oyo mpe akozwa mbano mpo na yango na mokolo ya nsuka
okoti na Islam na bolamu oyo elekaki”
“Ndakisa ya moto ya bokosi munafiki ezali lokola meme oyo ebunga nzela. Kati na ba ntaba mibale, ebaluki epai ya oyo mbala moko mpe epai ya mosusu mbala moko”
“Kondima ekelami kati na moko na bino kaka lokola elamba ekeli bizaleli, yango wana bósenga Nzambe azongisa bondima ya sika kati na mitema na bino”
“Moko ya bilembo ya ngonga ya nsuka, ezali ete boyebi ekolongwa, kozanga boyebi ekobakisama, ekobo ekobakisama, masanga ekobakisama, mibali bako Sila, mpe basi bakobakisama kino... Mpo na basi ntuku mitano bakozala na mobali moko”
“Ngonga ekoya te kino bokobunda na Bayuda, Kino libanga oyo ezali sima ya moyuda ekoloba: O musulman, moyuda moko azali sima na ngai, yango wana boma ye
“Ngonga ekoya te kino moi ekobima na westi, yango wana ntango ekobima mpe bato bakomona yango, bango nyonso bakondima
Source na ngai ezali mobembo ya sanza moko, mai na yango ezali mpembe koleka miliki, mpe nsolo na yango ezali elengi koleka musc
“Nakozala na Mai ya haudu kino nakomona nani kati na bino akozongela ngai, mpe bato bakokangama na ndima ngai, Bongo nakoloba: Ee Nkolo, mpo na ngai mpe mpo na ekolo na ngai
Na Lapi na oyo molimo ya Muhammad ezali na Loboko na ye, nkopo na yango eleki motángo ya minzoto ya mapata mpe ba étoiles na yango
Liwa ekomemama lokola nyama ya Bien
“Moto na bino ezali eteni moko ya biteni ntuku nsambo (70) ya moto ya Lifelo
Ntoma ya Nzambe, tika mabondeli ya Nzambe mpe kimia ezala likolo na ye, ayebisaki biso, mpe azali na bosolo na oyo alobaki, mpe azali na bondimi : “Ya solo, bozalisi ya moko na moko kati na bino esangisami na libumu ya mama na ye mikolo ntuku minei na butu ntuku minei 40
“Eloko nyonso ezali na Destin, ti ata na kozanga na kolonga, to kolonga mpe kozanga”
“Soki Nzambe apesi etinda ete mosaleli akufa na mokili, azalaka kotia ye mposa”
mpe nazali Dhwimaam bin Thalabah, ndeko ya Banu Saad bin Bakr
Mosakoli (s.a.w) alobelaki likambo moko mpe alobaki: “Wana ezalaki na tango ya kolimwa ya boyebi
Bondima Bato ya Buku te mpe bowangani bango te, kasi boloba : {Tondimi Nzambe pe oyo emonisama epai na biso}
Emonisami na Ntoma ya Nzambe (s.a.w) tango azalaki na mibu ntuku minei 40
oyo asalaki ye atambola na makolo mibale na mokili oyo azali na makoki te ya kosala ete atambola na elongi na ye na Mokolo ya Lisekwa?
Lobá: Nzambe mosusu azali te kaka Allah, na kotatola yango pona yo na mokolo ya lisekwa