Islam ezali kotatola nzambe mosusu azali te kaka Allah, mpe Muhammad azali Ntoma ya Nzambe, mpe kotia losambo, kofuta zakat, na kokanga carême ya Ramadan, mpe kosala Hijja na maka pona mutu oyo akoki na yango
yasolo droit ya nzambe ezali, basambelaye basangisa ye na eloko moko te, mpe droit ya basali naye ezali apesa bango etumbu te, na Mutu oyo asangisakiye te
Mutu oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko te, akokota na Paradis, na oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko, akokota na Lifelo”
Ya solo, okokomela peuple oyo bazali Bato ya Buku, Na yango tango okoya epayi na bango, benga bango mpo na ba témoigner que nzambe mosusu azali te kaka Allah, pe Muhammad azali Messanger ya Nzambe
Bato oyo bakosepela mingi na libondeli na ngai na Mokolo ya Lisekwa, oyo alobi ete nzambe mosusu azali te bobele Allah ye Moko, na bosembo uta na motema to na molimo na ye.”
Nazali riche koleka ba partenaires ya bosangisi, na oyo asali mosala asangisi ngai, nakotikaye na bosangisi naye
“Bótalela ngai te ndenge baklisto batalelaki mwana ya Maria; Mpo nazali kaka mosaleli ya nzambe, yango wana balobaki: Mosaleli ya Nzambe mpe Motindami na Ye.”
Bókomisela ngai ata verse moko, na bóyebisa yango na bokonzi ya Bana ya Israel, ezali mabe te, Mpe moto nyonso oyo akokosa mpo na ngai na nko, akozwa kiti na ye na Moto.”
“Est-ce que ekoki kosalema hadith na ngayi ekomeli mutu, ntango oyo ye avandi na trône naye? alobaki lisusu : Kati na biso na bino ezali na Buku ya Nzambe
“Bókómisa bandako na bino malita te, mpe bókómisa lilita na ngai fêti te, kasi bosambela mpo na ngai. Mabondeli na bino ekokóma epai na ngai na bisika nyonso oyo bozali.”
ngai namitie pene ya nzambe koleka kozala pene ya moko na bino, mpe Yasolo nzambe asili kotia ngai pene naye Ndenge atia Abraham camarade naye
boyebi oyo Nkolo na bino alobi?” Balobaki: Nzambe na Ntoma na Ye bayebi malamu koleka. Alobaki boye: “Kati na basaleli na Ngai ezali na mondimi epai na Ngai mpe mozangi kondima
“Satana akoyelaka moko na bino mpe alobi ete: Nani akelaki boye mpe boye? Nani akelaki boye na boye? Kino akoloba: Nani akela Nkolo na yo? Na yango, ntango akokóma na esika yango, tiká aluka ekimelo epai ya Nzambe mpe azala na motema yako silisa ye”
“Ezali na mosaleli moko te oyo Nzambe abatelaki ye liboso ya bato oyo azali kokengela, mpe akufaki mokolo oyo akosaki bato na ye, kasi Nzambe akopekisa ye Paladiso”
Ee Allah! Moto nyonso oyo azali mokambi ya likambo moko na kati ya Umma [Lingomba] na ngai, mpe akomisi yango pasi likolo na bango, [Ee Allah!] Komisa pe makambo pasi likolo naye. Mpe na oyo azali na mokumba ya likambo moko na kati na Umma na ngai, naye azali kokomisa yango pète epai na bango, [Allah] Komisa mpe makambo pète pona ye.
Bongo soki bomoni baoyo bazali kolanda likambo oyo ekokani na yango, boye wana nde Nzambe apesi bango nkombo, yango wana keba na bango
Oyo kati na bino akomona mabe, azala kobongola (kopekisa) yango na maboko naye, soki akokoka - kopekisa yango na maboko na ye - te, apekisa yango na maloba naye, mpe soki akokoka te, ayina yango na motema naye, wana nde ezali moke ya bondimi
Ntoma ya Nzambe, tika mabondeli ya Nzambe mpe kimia ezala likolo na ye, ayebisaki biso, mpe azali na bosolo na oyo alobaki, mpe azali na bondimi : “Ya solo, bozalisi ya moko na moko kati na bino esangisami na libumu ya mama na ye mikolo ntuku minei na butu ntuku minei 40
Source na ngai ezali mobembo ya sanza moko, mai na yango ezali mpembe koleka miliki, mpe nsolo na yango ezali elengi koleka musc
“Soki bino botie elikia na Nzambe lokola ebongi na Ye, akopesa bamposa nabino, lokola apesaka bandeke oyo babimaka na ntongo mpe bazali na nzala, na nsima bazongaka na mpokwa na libumu oyo etondi
O basali na ngai, napekisi injustice mpo na Ngai, mpe napekisi yango kati na bino, yango wana bonyokolana te
Ya solo, Nzambe akomaka misala malamu na misala ya mabe. Na sima alimbolaki ete, boye oyo azali na mokano ya kosala mosala malamu mpe asali yango te, Nzambe akomaka yango mpo na ye lokola mosala malamu mobimba, kasi soki akani kosala yango mpe asali yango, Nzambe akomaka yango mpo na ye. Azali na misala zomi ya malamu elongo na Ye, kino mbala nkama nsambo, kino mbala mingi, mpe moto nyonso oyo akani mosala mabe mpe asali yango te, Nzambe akomaka yango mpo na ye mabe te, kasi akofutama, Na soki akani kosala mabe mpe asali yango, Nzambe akomaka yango lokola likambo moko ya mabe mpo na ye”
mutu oyo akobongisa na Islam akozwa mokumba te! pona oyo elekaki, na mutu oyo akosala mabe na Islam, akozuwa ya liboso na ya suka”
Nzambe asalaka mondimi mabe te na mosala ya malamu, mpo na yango akopesama na mokili oyo mpe akozwa mbano mpo na yango na mokolo ya nsuka
O mwana mobali, nazali kotangisa yo maloba, Bomba nzambe, nzambe akobomba yo, Batela Nzambe, okokuta Ye liboso na yo, Soki osengi, bongo senga Nzambe, mpe soki ozali koluka lisalisi, luká lisalisi epai ya Nzambe
“Mabondeli mitano ya mokolo na mokolo, mokolo ya mitano kino mokolo ya mitano, mpe Ramadan kino Ramadan, elongolaka masumu oyo ezali kati na yango soki moto akimi masumu ya minene.”
“Mabonza moko te ekitisaka bozwi, mpe Nzambe abakisaka grâce ya mosaleli naye te longola se na kobakisaye makasi, mpe moto moko te amikitisaka liboso ya Nzambe longola se Nzambe akotombola ye”
Na oyo akotikela moto ya nyongo ngonga na tango azangi makoki, tope atikeli ye nyongo wana; na mokolo ya Suka, Allah akozipa ye na se ya elili ya Kiti ya Bokonzi na Ye, Mokolo oyo elili mokote ekozala obele se elili na Ye
“Nzambe ayokelaka mawa, moto oyo azalaka ko facilité ntango azali koteka, ntango azali kosomba, mpe tango azali kosambisa.”
“Ezalaki na moto moko oyo azalaka kosenga bato nyongo, mpe azalaka koloba na garçon na ye : Soki oyeli moto ya nyongo, limbisa ye mbala mosusu, Nzambe akolimbisa biso
Ya solo, ezali na kati ya bato; baoyo bazali kosalela bozwi ya Allah na ndenge ya mabe, kasi bakozala okati ya Lifelo na Mokolo ya suka.
Na Oyo akokila Ngizi ya Ramadan na bondimi mpe na kolikya lifuti - na yango epayi ya Allah-, masumu naye oyo eleka ekolimbisama”
“Na Oyo akotelema na Butu ya Mokano, na bondimi nyonso mpe na kolikya lifuti -epai ya Allah-, Bakolimbisa masumu naye oyo maleka”
“Nyonso oyo asali Hajj mpo na bolamu ya Nzambe mpe asali mbindo to mabe te, bozongi na ye ekozala lokola mokolo maman na ye abotaki ye”
“Ya solo Allah atalaka te na bilongi pe na bozwi na bino, kasi (Allah) azalaka nde kotala na mitema pe na misala na bino
“Moto oyo alingi ete Rizki na ye epanzana mpo na ye, mpe libula na ye ebakisama, abatela boyokani ya bondeko naye”
“Mokangisi ezali te moto oyo mokokisi, kasi mosangisi azali oyo, ntango boyokani na ye ya bondeko ekatani, akangisaka yango lisusu.”
Boyebi nini nde ezali matongi ? - Bayanolaki ye ete: Allah na Motindami na Ye nde bayebi malamu koleka! - Alobaki: -matongi - ezali “ koloba na sima ya ndeko nayo, na makambo oyo ayinaka ete bazala koloba yango. »,
“Soki bamizilman mibale bazali kobunda na bibundeli na bango; mobomi na oyo babomi bango mibale bakokota na Lifelo
“Epesameli nzela te moto asundola ndeko na ye mikolo koleka misato, Bakutani, na oyo alakisi ye, oyo alakisi, ye, na oyo eleki malamu kati na bango mibale ezali oyo akobanda na Salamu”
“Moto nyonso oyo azali ko garantir ngai oyo ezali kati ya mandefu na ye mibale na oyo ezali na katikati ya makolo na ye, nazali ko garantir ye Paradis.”
Ntoma ya Nzambe, tika ete Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, batunaki ye na ntina ya nini mingi ememaka bato na Paradis, mpe alobaki: “Kobanga Nzambe mpe bizaleli malamu
Ya solo baye oyo bazali na bosembo na miso ya Allah likolo ya bakiti ya pôlé, na mopanzi ya mobali ya Nkolo Mtondi-Mawa, Motondi Nguya,mpe Maboko na Ye mibale mazali sembo
mabe na méchanceté esalema te, Moto nyonso oyo akosala mabe, Nzambe akosala ye mabe, mpe moto nyonso oyo azali kopesa mpasi, Nzambe akopesa ye mpasi”
“Kotyola mosala moko ya malamu te, ata soki ezali kokutana na ndeko na yo na elongi ya esengo (kosekisa ye)”
“Droit ya Musulman likoló ya Musulman mosusu ezali mitano: Kozongisa mbote, kotala bato ya maladi, kokende na matanga, koyanola na libyangi, mpe kosepela na koswa.”
[Ange] Jibril azalaki kokoba na kopesa ngai toli mpo na mozalani [voisin] na ngai, kino nakanisaki ete ako komisa ye moko kati ya bakitani ya bozwi [heritage] na ngai.
“Moto oyo ako détourner lokumu honneur ya ndeko na ye, Nzambe ako zongisa elongi na ye na lifelo mokolo ya Lisekwa”
“Soki Moumbu ya nzambe abeli to asali mobembo, ba komelaka ye bolamu lokola nde azali na nzoto kolongono mpe Ndenge azalaka mofandi Yasolo.”
“Bóyekola boyebi te mpo na komikumisa na yango epai ya bato ya mayele. To mpe mpo na kobunda na yango
Bazalaki kotanga uta na Ntoma ya Nzambe, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, ba versets zomi, kasi bazalaki kozua zomi mosusu te kino bakoyeba boyebi nini ezali kati na oyo. Mpe mosala nayango
“Ekolobama na moto oyo azali kotanga Coran: Tanga mpe mata, mpe tanga ndenge ozalaki kotanga na mokili oyo, mpo ete esika na yo ya nsuka ezali na verse ya nsuka oyo okotánga”
“yasolo Moko na bino alingi, ntango akozonga na libota na ye, akuta ba chameaux misato ya mafuta mpe mikuwa?
ya Aba Mundhir, oyebi verse nini uta na Buku ya Nzambe oyo ozali kosimba, ezali monene koleka?” Alobi: Nalobaki: { Allâahu lâa ilâaha illâ huwa-l-hayyu-l-qayyûum} [Al-Baqarah: 255]. Alobi: Abetaki ngai na ntolo mpe alobaki: “Na Nzambe, tika ete opambolama na boyebi,ya abal Mundhir”
“Kondima ekelami kati na moko na bino kaka lokola elamba ekeli bizaleli, yango wana bósenga Nzambe azongisa bondima ya sika kati na mitema na bino”
“Ngonga oyo mosaleli azalaka penepene na Nkolo na ye ezali ntango azali kofukama na sujudu, yango wana bobondela Dua mingi”
Tango Profeta (s.a.w) azalaki kokende kolala butu nionso, azalaki kosimba maboko na ye esika moko. Na sima afulaki na yango na atanga kati na na yango : {Qul Huwa Al-Laahu 'Aĥadun}, mpe {Qul 'A`ūudhu Birabbi-l-Falaq}, mpe {Qul 'A`ūudhu Birabbi N-Nāsi}
“Maloba oyo nzambe alingaka yango mingi, koloba minei: Subhâna l-lâhi, wa-l-hamdu li-l-lâhi, wa lâ ilâaha illâ l-lâahu, wa l-lâahu akbar. Ezali mabe te epayi nayo obanda na moko na yango
moto oyo akoloba : Lâ ilâha illa l-lâhu wahdahu lâ sharîka lahu lahu-l-mulku walahu-l-hamdu, wa huwa `alâ kulli shay'in qadîr, mbala Zomi 10
“Maloba mibale oyo ezali pepele na lolemo, kilo na balance, mpe elingami epai ya nzambe oyo aleki Ngolu koloba
“Moto oyo akoloba: "Subhâna l-lâhi wa bi-hamdihi", mbala nkama moko (100) na mokolo moko, masumu na ye ekolimbisama, ata soki ezali lokola zabadi ya ebale”
Bopeto ezali eteni ya bondima, na Al hamdoulillahi etondisaka balance, mpe Subhâna l-lâhi Wa Al hamdoulillah etondaka - to etondisaka - oyo ezali kati kati ya mapata na mabele
“Moto nyonso oyo akosala mabe, Nzambe akosala ye mabe, mpe moto nyonso oyo azali makasi, Nzambe akozala mpasi mpo na ye”
Ee Ntoma ya Nzambe, natikaki eloko moko te nyonso nasalaki, (ya masumu liboso ya Islam), alobaki naye: Ozali te, osili kotatola ete nzambe mosusu azali te kaka Allah mpe Muhammad azali Ntoma ya Nzambe?
Ezali na litomba te mpo na ye, alobaki ata mokolo Moko te Nkolo na ngai, limbisa ngai masumu na ngai na Mokolo ya nsuka”
Tomonaka kati na biso moko makambo oyo moko na moko kati na biso amonaka mpasi mingi mpo na koloba. Alobaki boye: “bokutaka yengo?” Balobaki: oui Alobaki: “Wana ezali bondimi ya polele”
“Misala ezali motoba, mpe bato bazali minei, bongo mibale ezali obligatoire, na Lolenge na Lolenge, mpe mosala malamu ezali mbala zomi ndenge moko, mpe mosala malamu eleki mbala nkama nsambo
“Ndakisa ya moto ya bokosi munafiki ezali lokola meme oyo ebunga nzela. Kati na ba ntaba mibale, ebaluki epai ya oyo mbala moko mpe epai ya mosusu mbala moko”
“Moko ya bilembo ya ngonga ya nsuka, ezali ete boyebi ekolongwa, kozanga boyebi ekobakisama, ekobo ekobakisama, masanga ekobakisama, mibali bako Sila, mpe basi bakobakisama kino... Mpo na basi ntuku mitano bakozala na mobali moko”
“Ngonga ekoya te kino bokobunda na Bayuda, Kino libanga oyo ezali sima ya moyuda ekoloba: O musulman, moyuda moko azali sima na ngai, yango wana boma ye
“Ngonga ekoya te kino moi ekobima na westi, yango wana ntango ekobima mpe bato bakomona yango, bango nyonso bakondima
“Nakozala na Mai ya haudu kino nakomona nani kati na bino akozongela ngai, mpe bato bakokangama na ndima ngai, Bongo nakoloba: Ee Nkolo, mpo na ngai mpe mpo na ekolo na ngai
Na Lapi na oyo molimo ya Muhammad ezali na Loboko na ye, nkopo na yango eleki motángo ya minzoto ya mapata mpe ba étoiles na yango
Bondima Bato ya Buku te mpe bowangani bango te, kasi boloba : {Tondimi Nzambe pe oyo emonisama epai na biso}
Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, azalaki koyeba bokabwani ya ba surati te kino ekitelaye maloba oyo {Bismillahi Rr-rahmaani Rr-rahiim}
“Moto oyo azali kotanga Coran na mongongo ya polele azali lokola oyo azali kobimisa swadaka polele, mpe oyo azali kotanga Coran na mongongo ya kobombama azali lokola moto oyo azali kobimisa swadaka na kobombama”
oyo asalaki ye atambola na makolo mibale na mokili oyo azali na makoki te ya kosala ete atambola na elongi na ye na Mokolo ya Lisekwa?
“Moto oyo akutani na Nzambe na asangisaki Ye na eloko moko te, ako kota na Paradis, Mpe moto nyonso oyo akokutana na ye mpe asangisaki ye na eloko, akokota na Lifelo.”
Omoni ndenge nini soki nasambeli losambo ya obligatoire, mpe nakangi Ramadan, nasali makambo ya halali, mpe natiki haramu