1. Accueil ( Ebandeli )
  2. Ba katégoris
  3. Virtues and Manners

Maloba/Hadîth Boyebi nini nde ezali matongi ? - Bayanolaki ye ete: Allah na Motindami na Ye nde bayebi malamu koleka! - Alobaki: -matongi - ezali “ koloba na sima ya ndeko nayo, na makambo oyo ayinaka ete bazala koloba yango. »,

عن أبي هريرة رضي الله عنه أن رسول الله صلى الله عليه وسلم قال:
«أَتَدْرُونَ مَا الْغِيبَةُ؟»، قَالُوا: اللهُ وَرَسُولُهُ أَعْلَمُ، قَالَ: «ذِكْرُكَ أَخَاكَ بِمَا يَكْرَهُ»، قِيلَ: أَفَرَأَيْتَ إِنْ كَانَ فِي أَخِي مَا أَقُولُ؟ قَالَ: «إِنْ كَانَ فِيهِ مَا تَقُولُ فَقَدِ اغْتَبْتَهُ، وَإِنْ لَمْ يَكُنْ فِيهِ فَقَدْ بَهَتَّهُ».

Abou Hurairah (Allah asepela naye), ya solo Motindami ya Allah (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala naye) alobi:
« Boyebi nini nde ezali matongi ? - Bayanolaki ye ete: Allah na Motindami na Ye nde bayebi malamu koleka! - Alobaki: -matongi - ezali “ koloba na sima ya ndeko nayo, na makambo oyo ayinaka ete bazala koloba yango. », balobaki: omoni ndenge nini soki ezwami okati ya ndeko nangai maye nazali koloba ? Na Ntoma ayanolaki na koloba ete: "Soki ezali epai maye ozali koloba, yeba ete osili kotonga ye, kasi soki azali te lolenge wana, yeba ete osili bongo kokoselaye likambu." »

صحيح رواه مسلم صحيح مسلم - 2589

Ndimbola

Ntoma ya Allah (kimia ezala likolo naye) azali kolimbola bosolo ya matongi oyo epekisama ete: kolobela na mizilman na tango azali te, na makambo oyo ayinaka, ezala na maye matali lolenge ya nzoto to ya bizaleli naye, ndakisa ya koloba ete: azali na liso moko, azali mokosi to moyibi, tope balolenge misusu na oyo etali bizaleli mayinama, ata soki kutu balolenge wana ezwami epai naye.
Kasi soki moto yango ezali kati naye te tope azali te na balolenge oyo balobeli naye, oyo nde ezali mabe makasi koleka matongi, pamba te, yango ezali bokosi, elingi koloba ete: kokosela moto makambo mpe kobamba likolo naye likambo oyo azali na yango te.

Moko ya matomba ya hadîth

  1. Botangisi malamu ya Ntoma (kimia ezala likolo naye), na tango ete azali kotangisa makambo - matali lingomba to oyo epekisama na lingomba - na nzela ya mituna.
  2. Ezaleli malamu ya bayekoli (Allah asepela na bango) elongo na Ntoma (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo naye) na tango balobaki ete: ezali Allah na Motindami na Ye nde bayebi malamu koleka.
  3. Maye masengeli na moto oyo batuni naye na maye azangi boyebi na yango, azala koloba ete: Allah nde ayebi malamu koleka.
  4. Lolenge nkani mibeko ya Islam ebatelaka lisanga na bobateli ba drois mpe bondeko kati na bango.
  5. Motonga eboyisama mpe epekisami longola kaka na makambo mosusu mpona ba ntinsa; kati na yango: Kosala ete bobubi ekende mosuka, na tango ete moto oyo abubami azali kotanga kombo ya moto oyo asalaki ye mabe epai ya moto oyo azali na makoki ya kozwa bosolo [droit] na ye. Naye azali koloba ete: moto kingani asali ngai mabe, tope asali ngai boye, mpe ezwami lisusu kati na yango: boluki toli epai ya moto mosusu, ndakisa na maye matali libala, na bosangani na makanisi [association], to na bosalisani [voisinages], mpe na maye makonana na yango.

Kolakisa makomi ya mabongoli

68 Lokota (munoko)
EN English الإنجليزية
UR اردو الأوردية
ES Español الإسبانية
ID Indonesia الإندونيسية
UG ئۇيغۇرچە الأيغورية
BN বাংলা البنغالية
FR Français الفرنسية
TR Türkçe التركية
RU Русский الروسية
BS Bosanski البوسنية
SI සිංහල السنهالية
HI हिन्दी الهندية
ZH 中文 الصينية
FA فارسی الفارسية
VI Tiếng Việt الفيتنامية
TL Tagalog تجالوج
KU Kurdî الكردية
HA Hausa الهوسا
PT Português البرتغالية
ML മലയാളം المليالم
TE తెలుగు التلغو
SW Kiswahili السواحيلية
TA தமிழ் التاميلية
MY မြန်မာ البورمية
TH ไทย التايلندية
DE Deutsch الألمانية
JA 日本語 اليابانية
PS پښتو بشتو
AS অসমীয়া الأسامية
SQ Shqip الألبانية
SV Svenska السويدية
AM አማርኛ الأمهرية
NL Nederlands الهولندية
GU ગુજરાતી الغوجاراتية
KY Кыргызча القيرقيزية
NE नेपाली النيبالية
YO Yorùbá اليوروبا
LT Lietuvių الليتوانية
PRS دری الدرية
SR Српски الصربية
SO Soomaali الصومالية
TG тоҷикӣ الطاجيكية
RW Kinyarwanda الكينياروندا
RO Română الرومانية
HU Magyar المجرية
CS Čeština التشيكية
MOS Moore الموري
MG Malagasy المالاجاشية
FF Fulfulde الفولانية
IT Italiano الإيطالية
OM Oromoo الأورومو
KN ಕನ್ನಡ الكانادا
WO Wolof الولوف
BG Български البلغارية
AZ Azərbaycan الأذربيجانية
EL Ελληνικά اليونانية
AK Akan الأكانية
UZ O‘zbek الأوزبكية
UK Українська الأوكرانية
KA ქართული الجورجية
MK Македонски المقدونية
KM ភាសាខ្មែរ الخميرية
BM Bambara البامبارية
PA ਪੰਜਾਬੀ البنجابية
MR मराठी الماراثية
RN Kirundi الكيروندي
YAO Yao الياو
KMR Kurmancî الكرمنجية